Acts 18

Polo na Korinto

1Sima na yango, Polo atikaki Atene mpe akendaki na Korinto. 2Kuna, akutanaki na Moyuda moko na kombo ya Akila, moto ya mboka Ponti. Akila awutaki koya kala te longwa na Itali elongo na mwasi na ye Prisile, pamba te mokonzi Klode apesaki mitindo ete Bayuda nyonso babima na Rome. Boye, Polo akendaki kotala bango, 3mpe lokola Polo azalaki kosala mosala moko na bango, mosala ya kosala bandako ya kapo, avandaki epai na bango mpe akomaki kosala elongo na bango. 4Mikolo nyonso ya saba, Polo azalaki koteya na ndako ya mayangani, mpe azalaki koluka na nzela nyonso ete Bayuda mpe bato ya mokili ya Greki bakoka kondima.

5Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka mpo na koteya Liloba, mpe kotalisa solo epai na Bayuda ete Yesu azali Klisto. 6Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki : “Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko ! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya !”

7Boye, Polo atikaki bango mpe akendaki na ndako ya moto moko na kombo ya Titisi Jistisi. Moto yango azalaki kosambela Nzambe mpe ndako na ye ezalaki pembeni ya ndako ya mayangani. 8Boye, Krispisi, mokambi ya ndako ya mayangani elongo na libota na ye mobimba bandimelaki Nkolo. Boye, bato mingi ya Korinto oyo bazalaki koyoka Polo bakomaki bandimi ya Nkolo mpe bazwaki libatisi.

9Ezalaki mokolo moko na butu, Nkolo alobaki na Polo na emoniseli : “Kobanga te, koba kaka koloba mpe kokanga monoko te, 10pamba te nazali na yo elongo. Moto moko te akolonga kobundisa yo mpe kosala yo mabe, pamba te nazali na bato mingi kati na engumba oyo.” 11Boye, Polo avandaki na Korinto, mbula moko na ndambo, mpe azalaki koteya bango Liloba ya Nzambe.

12Kasi wana Galioni azalaki moyangeli ya Akayi, Bayuda bayokanaki mpo na kokanga Polo, mpe bamemaki ye na esambiselo. 13Tala ndenge bafundaki ye : “Moto oyo azali koluka kondimisa bato ete basambela Nzambe na ndenge mibeko epekisa.”

14Tango kaka Polo alingaki koloba, Galioni alobaki na Bayuda : “Bino Bayuda, soki moto oyo asalaki mabe to likambo moko ya sembo te, nalingaki solo koyokela bino. 15Kasi lokola ezali kaka likambo ya tembe mpo na makambo oyo etali maloba, bakombo mpe mibeko na bino, naboyi kozala mosambisi ya makambo ya boye ; wana etali kaka bino moko.” 16Boye, abenganaki bango na esambiselo. 17Mpe bango nyonso bakangaki Sositeni, mokambi ya ndako ya mayangani, bakomaki kobeta ye liboso ya esambiselo. Kasi Galioni atalaki yango se pamba.

Polo alekeli na Antioshe

18Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Korinto. Boye, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendaki na Siri elongo na Prisile mpe Akila. Liboso ya kolongwa na libongo ya Sankresi, Polo akokolisaki suki ya moto na ye, mpo ete alapaki ndayi. 19Tango bakomaki na Efeso, Polo atikaki Akila mpe Prisile. Akendaki na ndako ya mayangani mpo na kosolola na Bayuda. 20Basengaki ete awumela mwa mikolo elongo na bango kasi Polo aboyaki. 21Boye, tango atikaki bango, alakaki bango : “Nakozongela bino lisusu, soki Nzambe alingi.” Azwaki masuwa na Efeso mpe akendaki. 22Tango akomaki na Sezare, amataki na Yelusalemi mpo na kopesa Lingomba mbote, sima akendaki na Antioshe.

23Sima ya kovanda mwa mikolo na Antioshe, Polo alongwaki wana mpe alekaki na etuka ya Galatia mpe ya Friji, epai wapi azalaki kolendisa bayekoli nyonso.

Apolosi na Efeso mpe na Korinto

24Moyuda moko oyo abotamaki na Alekizandri, na kombo ya Apolosi ayaki na Efeso. Ayebaki koloba malamu mpe ayebaki bozindo ya Makomi. 25Bateyaki ye nzela ya Nkolo, mpe azalaki koloba penza na molende makambo oyo etali Yesu ata ayebaki kaka libatisi ya Yoane. 26Abandaki koloba na molende nyonso kati na ndako ya mayangani. Kasi tango Prisile mpe Akila bayokaki ye, babengisaki ye na ndako na bango, mpe balimbolelaki ye malamu penza nzela ya Nzambe.

27Lokola Apolosi azalaki na likanisi ya kokende na Akayi, bandeko balendisaki ye mpe bakomelaki bayekoli ya Korinto ete bayamba ye malamu. Tango akomaki kuna, na ngolu na Nzambe, azalaki lisungi monene mpo na bato oyo bakomaki bandimi. 28Pamba te, maloba na ye ezalaki kosukisa tembe ya Bayuda na miso ya bato nyonso, mpe azalaki kotalisa na polele na nzela ya Makomi ete Yesu azali Klisto.
Copyright information for LinMNB